Psalms 82

Nzambe azali kosambisa bakonzi ya bikolo

Nzembo ya Asaf.


1 Nzambe atelemi na kati ya lisanga ya monene ;
azali kokata makambo na kati ya “banzambe”

2 Kino tango nini bokolobela moto oyo azangi sembo,
mpe kokotela bato ya mabe ?

3 lobela moto azanga makasi mpe mwana oyo
akufela baboti ;
bolakisa alima epai ya mobola mpe epai ya moto oyo bazali konyokola.

4 Bokangola moto oyo azangi makasi mpe mobola ;
bolongola bango na maboko ya bato ya mabe.

5 Bayebi eloko moko te mpe basosolaka eloko moko te ;
bazali koyenga-yenga na molili ;
bafondasio nyonso ya mokili ezali koningana.

6 Nalobaki : “Bozali banzambe ;
bino nyonso bozali bana na ye Oyo Aleki Likolo.”

7 Kasi bokokufa lokola bato pamba ;
bokokweya lokola bakambi nyonso.

8 Telema Nzambe ! Sambisa mokili !
Pamba te bikolo nyonso ezali libula na yo.
Copyright information for LinMNB